Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mpepo ya bitumba ya FARDC ebetami masasi na Rwanda


Mpepo ya bitumba Sukhoi-25 ya Macédoine ezali kokita na Macédoine, 23 juin 2001.
Mpepo ya bitumba Sukhoi-25 ya Macédoine ezali kokita na Macédoine, 23 juin 2001.

Ekolo Rwanda ebeti masasi na mpepo moko Sukoi-25 ya bitumba ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique…

Bakonzi ba Kigali balobi mpepo yango etambolaki likolo lya Rwanda mpe bakebisi bayi RDC mpo na yango, kasi balobi nde" basalaki maye masengelaki mpo na komibatela," kolanda liyebisi lya molebeli ya mbulmatari ya Rwanda.

Molobeli ma mampinga ma ekolo Congo démocratique alobi mpepo yango etambolaki te likolo lya mabele ma Rwanda kasi ezalaki nde kokita na libanda lya mpepo ya Goma na kowutaka na lac Kivu na ngambo ya Ekolo Congo démocratique.

Ekomi mbala ya misato to ya minei ete Kigali epamela Kinshasa kotinda mpepo na yango kotambola likolo lya Rwanda.

Na sanza ya zomi na moko moleki, mpepo Sukhoi-25 ekitaki kutu na libunga na libanda lya mpepo ya Rwanda.

Bikolo mibale bikabola na na ndelo ya mayi ma lac eye na bisika biike. Mbulamatari ya ekolo Congo démocratique elaki kopesa makanisi ma yango kala te mpo na yango.

XS
SM
MD
LG