Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biselele atindami koyanola na bazuzi mpo na koteka sekele ya mokonzi mpe ya mboka


Fortunat Bisele, mopesi toli ya lokumu ya bepembeni ya mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi.
Fortunat Bisele, mopesi toli ya lokumu ya bepembeni ya mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi.

Fortunat Bisele, mopesi toli ya lokumu ya pembeni ya kala ya mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi, atindami o'mkolo mwa mitano na Parquet ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe nsima na koyanola mikolo miye liboso lya ANR, misala mya bmboka.

Afundami mpo na mbeba ekasi ya koteka sekele ya mboka to mokonzi ya mboka na bapaya.

Bayi bokengi bakendaki kolukaluka na ndako na ye mikolo mileki nsima na biyano apesaki na mituna ya mopanzi sango Alain Foka na libandela lya sanza ya yambo eye, na kolobaka ete mokonzi ya mboka ayokanaki na mokonzi ya Rwanda mpo ete asunga Ekolo Congo démocratique na batu ayembani bango mpe Kinshasa epesa ye nzela ya kosalela makele ma yango.

Alongolamaki na mosala o'mokolo mwa zomi na mitano ya sanza ya yambo ya 2023.

XS
SM
MD
LG