Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 elobi lokola mbulatamari elingi bitumba, esenga lisusu te na batomboki kolongwa Bunagana


Congolese M23 rebel leader Bisimwa Bertrand speaks to the media in Bunagana, Aug. 2, 2013.
Congolese M23 rebel leader Bisimwa Bertrand speaks to the media in Bunagana, Aug. 2, 2013.

Mokambi ya M23, Bertrand Bisimwa, alobi ete lokola mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique eponi kosala bitumba, esengeli endima yango ntina na suka.

"Elingi koloba ete oyo aleki makasi akonza. Kinshasa esengaka lisusu te bolongwi ya M23 na bisika ebungisa." elimboli M. Bisimwa na makomi na ye na compte Twitter na ye.

Mpo na na makambi ya M23, lingomba lya ye lizali kokoba kosenga masolo.

Yambo na yango, M23 epamelaki mbulamatari kobeta masasi mpe bibundeli makasi bisika bacivili bazali na kosalelaka mpepo ya bitumba mpe pakapaka wuto mokolo mwa eyenga.

M23 elobi masasi ma FARDC, mampinga ma RDC, nde matindi bavandi, bacivili, kokima bisika na bango ya kovanda.

M23 ebakisaki ete, emonani ete mbulamatari elingi kimya te mpe ezali kotambola likolo lya mbela lya Nations unies, Union africaine mpe EAC, lisanga lya bikolo bya Afrika ya Est mpo na masolo.

M23 epameli mpe mbela ya kokotisa bilenge na mampinga na mayele ma bobomi to genocie. Elobi ete etikali na bolingi na yango ya masolo mpo na kimya.

FARDC esalelaki mpepo na yango mibale ya bitumba Sukhoi-25 mpo na kobeta ba bombes na bisika bisimbami na batomboki ba M23 na Rutshuru na monyele ya mboka.

Bayi bokengi mpe bavandi bandimi ete ba bombes yango ebwakami na Tshanzu mpe Runyoni na ba ngomba ezali pene na ndelo na Uganda. Bavandi ba Bunagana, bisika M23 ebotola wuto sika pene na sanza mitano, bazali na bobangi na koyokaka lokiko loye, mpe bazali kokima, etatoli banzeneneke.

Bayi Société civile balobi ete bavandi ba Bunganga bakimi mpe babakisi ete bitumba na mabele bizali kosalama nde na pene na kilometre ntuku misato na Goma.

Bavandi ba Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu bamonaki mpe pakapaka mibale.

O'mokolo mwa yambo ya mposo, 8 novembre 2022, mbulamatari ya Rwanda epamelaki RDC mpo moko na mpepo Sukhoi-25 ya FARDC motambolaki na bobuki mibeko likolo na Rwanda mpe ekitaki na Rubavu mpo na mwa ngonga.

RDC engimaki ete mpepo yango eleki likolo na Rwanda kasi na libunga, kasi ezalaki na masasi te.

Kinshasa ebakisaki ete etikala soki moke te komeka kokota na makasi na mabele ma bapaya.

RDC efundaka Rwanda kopesa M23 maboko, Kigali ewanga mpe epamelaka Kinshasa kobunda elongo na FDLR, lingomba lya batomboki ba Rwanda bafundama mpo na génocide ya 1994.

XS
SM
MD
LG