Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lutundula asengi etumbu mpo na Rwanda na M23


Christophe Lutundula Apala, ministre ya mambi ya Bapaya ya Ekolo Congo décmorartique (RDC) na Paris, France, 12 nvembre 2021.
Christophe Lutundula Apala, ministre ya mambi ya Bapaya ya Ekolo Congo décmorartique (RDC) na Paris, France, 12 nvembre 2021.

Ekolo Congo démocratique esengi na ONU, Union africaine, EAC, CIRGL mpe basungi basusu kopesa etumbu na bakonzi ba Rwanda mpe bakambi ba M23 na lolonge batombi ba M23 bazali kino sika na bisika biike babotola.

Na liyebisi abimisi lelo, ministre ya mambi ya Bapaya ya Ekolo Congo démocratique, Christophe Lutundula apemali Rwanda mpe M23 kotambola likolo na mibeko mya molongo mpe makoki ma bomoto na monyele ya mboka na ye.

Akomi ete amoni na miso ndenge M23 eboyi kotosa malako mabimaki na bokutani ya bakonzi ba bikolo ya le 23 novembre 2022 na Luanda. Linaka lisalamaki mpo na kosenga M23 kolongwa kino le 15 janvier eleki.

Christophe Lutundula alobi mpe ete amoni ndenge Rwanda ezali mpe kotosa te misala mya Nairobi miye misengaki yango kotika kopesa maboko na M23.

Mposo moleki, Président Paul Kagame ya Rwanda abandelaki kowanga ete ekolo na ye esungaka M23 mpe akebisaki koboya bakima bitumba bawuta na RDC mpo na kolakisa, kolanda maloba, ete Rwanda ezali na makambo ma RDC te.

Boyokani bwa Luanda bosengaki na M23 kolongwa bisika ebotola kino mokolo mwa zomi na mitano moleki ya sanza eye ya yambo ya mobu.

Bakambi ba M23 bakutanaki mposo moleki na mobondi ya matata na monyele ya Ekolo Congo démocratique, mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta mpe balakaki kokoba kolongwa na limemya mpe alima na bisika biye basi babandaki kotika.

Nzokande lobi loleki, wuta Davos, na Suisse, esika azali na likita lya nkita na molongo, mokonzi ya Ekolo Congo démocratique, Félix Tshisekedi apemelaki M23 kolongwa na matata mpe komitiya bisika bisusu mpe Rwanda kosala lokuta.

XS
SM
MD
LG