Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kenyatta akutani na M23 mpe alobi endimi kokoba kolongwa bisika ebotola


Mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta (D) ayambani na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique (RDC) Félix Tshisekedi na Kinshasa, 13novembre 2022. (Présidence RDC)
Mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta (D) ayambani na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique (RDC) Félix Tshisekedi na Kinshasa, 13novembre 2022. (Présidence RDC)

Uhuru Kenyatta, mokonzi ya kala ya Kenya oyo azali bongo mobondisi na matata na monyele ya Ekolo Congo démocratique (RDC) asakoli ete batomboki ba M23 bandimi kokoba kolongwa “na alima mpe limemya” bisika babotola.

M. Kneyatta akutanaki o’mokolo mwa minei (12 janvier 2023) na batomboki ba M23 na Mombassa, na Kenya, kolanda liyebisi lya M. Kenyatta.

“Mpo na kolakisa bolingi bwa bango ya kosala mpo na kopesa eyano (na matata) na Nord-Kivu, bakambi ba M23 bandimi kokoba kolongwa na alima mpe kotosa na limemya botelemisi bitumba,” elobi liyebisi lya M. Kenyatta.

Batomboki ba M23 “bandimi mpe lokola kokoba kotosa mpe kosala elongo na mampinga ma bikolo bya etuka ya EAC (Liboke lya bikolo bya Afrika ya est) maye mabandaki kozwa bipayi M23 ewuti kolongwa,” ekomi M. Kenyatta.

M23 esi esakolaki bolongwi bwa yango na bisika lokola Kibumba, Kiwandja mpe misusu mposo moleki kasi, ebotolaki Naymilima na bitumba biye bikobaki.

Bolongwi bwa M23 bosengamaki na bokutani ya bakambi ya bikolo bya etuka ya bitima binene (CIRGL) na baye ba EAC.

XS
SM
MD
LG