Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bitumba bingalaki lisusu makasi lelo kati na FARDC Na batomboki ba M23.


DRCONGO-UNREST
DRCONGO-UNREST

Bitumba bingalaki lisusu makasi lelo kati na mampinga ma Fardc pembeni ya mangomba maye mabetalaka ekolo na mabele ma bango, na basimba minduki ba M23 lelo mokolo mwa mitano pene na engumba Goma engumba mokonzi ya etuka ya Nord Kivu.

Bitumba biye bingalaki makasi na mboka Bwiza, eye ezuami na territoire de Rutshuru epayi wapi molongo mwa suka mwa mampinga ma Fardc mozuami. Kolanda maloba ma Célestin Bahinyehu, président ya société civile ya Bishusha, o territoire ya Rutshuru na AFP, sima lokito ya masasi makasi kobeta o bisika biye, bato bayike bakimi na mboka Kitshanga. Engumba Rutshuru ezuami na ba Kilometres tuku sambo ya engumba Goma.

Mampinga ma Fardc bazali kofunda batomboki ba M23 na kozanga kotosa botiki bitumba lokola bayokanaka na sanza ya zomi na yoko, kasi na ngambo na bango, batomboki ba M23 o monoko mwa Willy Ngoma molobeli ya lingomba liye Bazali kowangana mpe balobi ete ezali nde mampinga ma Fardc nde babandi bango bitumba.

Lingomba lya batomboki baye ba M23 mingi mingi ya ba Tutsi elongamaka na mobu 2013, mpe tango bazongeli bitumba ba sanza mileki, M23 elongi bisika minene ya territoire ya Nord-Kivu, etuka ya Congo oyo ezali na ndelo na ekolo Rwanda.

Bitumba boiye bizongisaki lisusu matata kati na RDC na Rwanda, eye Mbulamatari ya RDC ezali kofunda kobunda pembeni y aba M23. Kigali ewanganaka, mpe efundaka na ngambo na yango mampinga ma FARDC na kosngana na baye ba FDLR baye babundisaka mbulamatari ya ekolo Rwanda.

Misala miyike na nzela ya diplomacie mizali kosalema mpo na koluka kosilisa matata maye mope bozangi bokengi na Est ya RDC eye etungisami na bitumba wuto sika mibu tuku misato.

XS
SM
MD
LG