Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 elongwe na camp ya Rumangabo mpe epesi yango na mampinga ma EAC


Batomboki ba lingomba M23 bazali kolongwa na camp ya basoda ya Rumangambo, na Rutshuru, Nord-Kivu, o'mokolo mwa 6 sanza ya yambo 2023. (Photo.Guervhom Ndebo/AFP)
Batomboki ba lingomba M23 bazali kolongwa na camp ya basoda ya Rumangambo, na Rutshuru, Nord-Kivu, o'mokolo mwa 6 sanza ya yambo 2023. (Photo.Guervhom Ndebo/AFP)

Batomboki ba M23 batiki na maboko ma mampinga ma EAC (Lisanfa lya bikolo bya Afrika ya Est) camp ya basoda ebotalaki pene na mibu mibale mileki.

Milulu mya botiki camp misalamaki na miso mya bapanzi sango o’mokolo mwa mitano, le 5 janvier 2023 na esika yango na pene na kilomètres ntuku mitano na Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu.

Milulu misusu mya lolenge lona misalamaki le 23 décembre 2023 na Kibumba epayi longomba lya M23 lilongwaki mpe lokola nsima na kobotola yango sanza mibale yambo na yango.

M23 elakaki kolongwa bisika biye lokola bokutani ya bakonzi ba bikolo bya EAC mpe ba CIRGL )Likita lya bikolo bya bitima minene) basengaki le 23 novembre na Luanda, na Angola.

Kaso mikolo mibale mileki, M23 esakolaki ete ebotoli mboka Nyamilima, kaka na territoire ya Rutshuru, na Nord-Kivu.

Molobeli ya M23, major Willy Ngoma, alimbolaki ete bobotoli bwa Nyanilima bosalamaki na kozongisa masasi maye mamponga ma ekolo FARDC na mangomba ma basimba minduki masusu masunganga yango masalaki.

XS
SM
MD
LG