Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

État de siège : Bato banei babomami na likwangola na Kainama na territoire ya Beni


Minganga bazali kosalisa moto moko akatami na makwangola, na lopitalo ya Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kicu, 30 octobre 2020.
Minganga bazali kosalisa moto moko akatami na makwangola, na lopitalo ya Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kicu, 30 octobre 2020.

Bato koleka banei babomami na likwangola mpe basatu bazoki mokolo mwa mitano na mboka Kitchimba, na localité ya Kainama na nordi ya territoire ya Beni, na Nord-Kivu.  

Bobomami boye bosalemi na bayi lingomba AADF, kolanda Actualite.cd eye epesi nsango yango.

Bato ba wei mpe baye bazoki bazali basi. Bakutamaki na ebale ya Vubake epayi wapi bazalaki kosokola bilamba.

Ebale ya Voubake ezali na kilometele moko pene na esika bayi FARDC (mampinga ma RDC) bazalı.

Bobomi bwango bosalami o'mokolo mwa mitano na ngonga ya zomi, elobi Jonas Bin Kasumba, mokambi ya société civile ya esika eye.

M. Kaumba abakisi mpe lisusu ete ata ko ntangwa ebetami ntango inso mpo na makambo matali bozongi na kimya na eteni eye ya Nord-Kivu, mbulamatari azali kosala eloko moko te.

Ezali mbala ya mibale kaka na mikolo mibale ba attaques ya ba ADF esalemi na nzinga nzinga.

Kimya ezongi ata ko ba dongolomiso bazali kokoba nzela na bango ya ko kende na province ya Ituri, elobi lisusu M. Kasumba.

Province ya Nord-Nord na ya Ituri ezali na état de siège wuta sanza ya mitano ya mobu moye.

XS
SM
MD
LG