Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakamwena Nsapu bayike na bakonzi na bango batiki minduki


Soda atelemi liboso ya bato na milulu ya mampinga na Kananga, Kasaï, 11 janvier 2013.
Soda atelemi liboso ya bato na milulu ya mampinga na Kananga, Kasaï, 11 janvier 2013.

Bakonzi misato ya babundi ya Kamwuina Nsapu bamispesi na maboko ya bakonzi na Kasaï.

Administrateur ya etando ya Luebo, Joseph Mutshipayi, ayebisi ete Lokondo Luakatebua, Mubiayi Dewayi et Mwamba Musolo, boko ya bakambi ya bakwmina Nsapu na Luebo, batiki minduki mpe bamipesi na maboko ya bakonzi.

Nzokande, Lokondo Luakatebua afundamaki mpo na operation attaque ya babundi na ye le 23 mars 2017 baye babomaki 39 policiers na Luebo.

Mubiayi Dewayi ye nde atiyaki moto na eveché na Luebo.

Kamwena Nsapu na Tshikapa

Ndenge moko mpe na Tshiskapa, 43 Kamwena Nsapu misusu babimaki na zamba mpe bamipesi na bakonzi na minduki na bango. Bazalaki mpe na mokonzi na bango.

Banda bozuwi ya bokonzi ya Félix Tshsiekedi, ba Kamwina Nsapu ebele bazali kobima na zamba mpe komipemsa na bakonzi.

XS
SM
MD
LG