Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bikolo/Bituka

Emmanuel Macron apesi losako na "transition pacifique wa yambo" na RDC

Président ya France Emmanuel Macron pene na Valence, France, 24 janvier 2019.
Président ya France Emmanuel Macron pene na Valence, France, 24 janvier 2019.

Président Emmanuel Macron ya mboka France atindi mokanda na mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi, mpe apesi losako na "transition pacifique wa yambo" na RDC.

"Boponami na yo na bokonzi ya RDC etalisi ‘transition pacifique wa yambo’ (bopesani ya bokonzi ya kimya wa yambo) na lisolo ya mboka na bino. Ezali elembo ya bolingo ya mbongwana ba Congolais balakisi na makasi mpe na kimya," ekomi na mokanda yango M. Macron.

Mokonzi ya France alobi ete akanisi ete Félix Tshisekedi akokokisa bozeli maye na nzela ya masolo mpe ya boyokani.

M. Macron alobi azali na elikya ete mokonzi ya sika ya RDC akofungola Maison Shcengen mpo ete ba Congolais bazwaka visa ya poto soki balingi. Gouvernement ya Joseph Kabila ekangaki Maison Schengen nsima ya ba sanctions (etumbu) likolo ya bakonzi bayike ya RDC.

Tokundala ete ministre des Affaires étrangères ya France, Jean-Yves Le Drian alobaki ete bosakoli ya elonga ya Félix Tshisekedi ekokanaki te na bozeli ya ba Congolais.

See all News Updates of the Day

XS
SM
MD
LG