Ligue ya bilenge ya UDPS esengi président Félix Tshisekedi akata boyokani CACH-FCC mpo baye ya Joseph Kabila bazali kokosa bango. Tolanda na elobeli ya VOA Lingala, président ya Ligue ya bilenge ya UDPS, Yves Bunkulu.
Coup d’Etat na Soudan : Mampinga makweyisi bokonzi ya Omar el-Béchir; Etats-Unis na Europe basengi bokutani ya lobango na Conseil ya sécurité ya ONU. Na RDC… Coco Jacques Mulongo Nzemba ya UDPS asengi balongola bakonzi ya lingomba na ye nsima na maponami ya ba gouverneurs. Biyano ya CACH na FCC na m
Bakonzi ya Etats-Unis mpe ya Europe basengi bokutani ya Conseil ya sécurité nsima ya Coup d’Etat na Soudan.
Mampinga ya ekolo Soudan malongoli président Omar el-Béchir na bokonzi nsima na bato kotelemela bokonzi yna ye.
Mokambi ya kala ya Assemblée provinciale ya engumba/etuka ya Kinshasa, Roger Nsingi, atindami na boloko ya monene ya Kinshasa, na Makala, mpo na likambo ya kobomba mituka ya l’Etat, eyebisi Inspection provinciale ya police.
Lingomba na bato balobi bazali ba victimes ya monyokoli ya misala ya bokengi ya RDC, etelemeli botiyami ya Roger Kibelisa, moko ya bakambi ya ANR (Agence nationale de renseignements), na poste ya Conseiller spécial ya mokonzi ya mboka ya mambi ya bokengi.
Bayi Front commun pour le Congo (FCC) balobi basepeli te na maloba ya président Félix Tshisekedi na mobembo wa ye mposo moleki na Etats-Unis.
Président Donald Trump aponi James Murray mpo na akoma mokambi ya sika ya Secret Service, misala ya bokengi ya mokonzi ya ekolo awa na Etats-Unis.
Mobeti ndembo Neymar Jr. akendaki kotala Pelé na hôpital moko ya Paris epayi wapi mosani oyo ya kala ya football azali kosalisama na infection urinaire.
Bitumba kati na baye ya UDPS mpe PPRD na campagne électorale ya ba gouverneurs na Lubumbashi mpe na Lomami. Bato minei babomami na ba ADF na Beni. Bozongi ya Félix Tshesekedi na Kinshasa kowuta Washington.
Président Félix Tshisekedi alobi boyokani na FCC ekosalama kaka na kolanda Etat de droit mpe bosembo. Yango nde ekozala lolenge ya kopikola système ditctatorial ya kala, elobi mokonzi ya sika ya RDC na eyano ya VOA Lingala, na bokutani awa na Washington.
Mokonzi Tshisekedi alobi akokweyisa système dictatorial ya bokonzi ya kala. Asengi lisungi ya Etats-Unis. Alobaki yango jeudi na bokutani na bato ya zebi mpe banganga ya boyebi makambo ya RDC, na Council on Foreign Relations na Washigton.
Bureau ya Fatou Bensouda, procureure générale ya CPI (Cour penale internationale), eyebisi ete bakonzi ya Amerika babotoli visa ya mboka na bango na zuzi mokonzi liye.
Président Félix Tshisekedi alobi, jeudi na Washington, ete akopikola système dictatorial ya mokonzi akitani na ye, Joseph Kabila.
Bato na bokengi ya bazali koluka baye bamemi na makasi touriste américaine moko na chauffeur na ye na parc national Queen Elizabeth, na sud-ouest ya Ouganda, mosika te na RDC.
Félix Tshisekedi akutani na Washington, na baye ya gouvernement ya Etats-Unis. Akomaki na Etats-Unis mardi na butu. Na Beni, bitumba mongali kati na mampinga ya FARDC na ba ADF na mboka Samboko Tchani Tchani. Misala ya bozongisi lotiliki na Kolwezi, na Haut-Ktanga nsima ya koyibama ya ba cables mpe
Président Félix Tshisekedi akomaki o’butu ya mokolo ya mibale na Washington, mpo na mobembo wa ye ya yambo na kibonkonzi, na Etats-Unis.
Mokonzi ya ekolo Algérie, Abdelaziz Bouteflika, atiki mosala. Ayebisi mokano na ye liboso ya Conseil constitutionnel nsima ya botelemeli ya bana ya mboka na ye.
Félix Tshisekedi azalaki na botiyami ya bokonzi ya Macky Sall na Dakar, na Sénégal, na nzela wa ye mpo na koya na Washington. Franck Diongo alobi na boyokani FCC-CACH, Félix Tshisekedi nde mokonzi. Insécurité na Lubumbashi, bilenge bazali kotelemeli ba bandits baye bazali kotindela bato ba tracts ya
Mokambi ya lingomba MLP akebisi bana ya RD Congo mpo na boluki ya baye ya FCC kobongola Mobeko likonzi mpo na bozongi na bokonzi ya Joseph Kabila, lokola bazali majoritaire.
Voir plus