Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Touriste américaine moko akangami na bato bayebani te na Ouganda


Ba touristes kati ya mayi na parc national Queen Elizabeth, na Ouganda, 2 avril 2009.
Ba touristes kati ya mayi na parc national Queen Elizabeth, na Ouganda, 2 avril 2009.

Bato na bokengi ya bazali koluka baye bamemi na makasi touriste américaine moko na chauffeur na ye na parc national Queen Elizabeth, na sud-ouest ya Ouganda, mosika te na RDC.

Kolanda molebeli ya gouvernement ya Ouganda, Ofwono Opondo, bato minei basimba minduki batiyaki motambo na motuka van moye mozalaki qui komema ba touristes na parc liye.

Police ebakisi ete bato baye bazwaki bato bazalaki na motuka moye mpe bamemaki touriste américaine ya 35 ans mpe mokumbi ya motuka, guide (molakisi nzela) moye azalaki na 38 ans.

Parc Queen Elizabeth ezali mosika te na parc ya Virungu, na RDC.

XS
SM
MD
LG