Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis ebotoli visa ya procureure générale ya CPI


Procureure ya Cour pénale internationale (CPI) Fatou Bensouda na La Haye, 8 avril 2018. (Twitter/CPI)
Procureure ya Cour pénale internationale (CPI) Fatou Bensouda na La Haye, 8 avril 2018. (Twitter/CPI)

Bureau ya Fatou Bensouda, procureure générale ya CPI (Cour penale internationale), eyebisi ete bakonzi ya Amerika babotoli visa ya mboka na bango na zuzi mokonzi liye.

Bobotoli ya visa loye likoki kozala mpo na bolukiluki likolo ya mabe maye basoda ya Amerika bafundameli na Afghanistan, ekanisi baye nzinganzinga ya Mme Bensouda.

Tokundale ete Washington ezali te moko ya bikolo ya CPI, Tribunal ya molongo oyo etalaka mbeba masala o'ntango ya bitumba to bobomi ya bato ebele.

Kasi bureau na ya procureure générale ya CPI elobi ete mama Bensouda akokoba kosa misala na ye na banga moto te.

XS
SM
MD
LG