-Kengo azali malamu nsima na bobimi na hôpital ; -Limboko, moninga ya Mokoko asali lisanga ya poilitiki na Brazzaville ; -Député Boyoko akangami na ba soda minei mpo na liwa ya Chinois na Komanda ; -Litatoli ya Séphora ndenge akokati na makolo na USA
Junior Ilunga Makabu, ya ekolo Congo démocratique, azuwi nkamba ya elombe ya molongo ya Boxe ya WBC Silver.
Norbert Basengenzi, vice-président ya CENI, apesi mokanda na ye ya kotika mosala, elobi baye ya mosala ya maponami.
*Audience ya chambre spéciale ya Cour constitutionnelle mpo na ba recours *ACAJ esengi Benoit Lwamba kokamba chambre yango *Momekano ya BAC mardi na Congo-Brazzaville *Bokundami ya bawei 166 nsima na bobomani na Ituri *Ilunga Makabu, ya RDC, champion ya Boxe ya WBC Silver
*Lwamba Bintu, président ya Cour constitutionnelle asengi kimya epayi ya Lamuka *USA, R-U, Canada na Suisse bapameli cour constitutionnelle *Tshisekedi alingi RDC esala na Tanzanie. Akomi na Burundi *Lubumbashi : attaque ya ba Maï Maï *Motango ya babeli ya Ebola mokiti na Beni
Bakambi ya ba Mission ya Etats-Unis, Royaume-Uni, Suisse mpe Canada bapameli Cour constitutionnelle mpo na miko miye milongoli ba parlementaires bayike.
*Maponami ya Sénat na Congo-Brazzaville le 21 juillet *Sit-In ya Lamuka liboso ya Cour constitutionnelle ; eyano ya mokambi ya FCC, Néhémie Mwilanya *Tshisekedi na Dar-es-Salam *Na Beni mpe na Ituri bato batamboli mpo na kosenga kimya
Mokambi (coordonnateur) ya FCC, Néhémie Mwilanya, alobi ba députés 10 ya lingomba na ye mpe balongolami na mokano ya Cour constitutionnelle. Mpo na ye, esengeli kozela komona mokano mokomami na Cour mpo makombo ya lokuta mingi mazali kotambola.
*Fayulu asakoli boycott ya parlement mpe botelemeli ya miko ya Cour constitutionnelle *Bitumba kati na baye ya UDPS na ya FC *MLC esengi bato batambola le 15 juin *Tshisekedi na Malabo *Ebola na Ouganda
Président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique akutani na mokokani wa ye ya Gabon, Ali Bongo, na Libreville.
Mpo na mbala ya yambo, moto moko, mwana mobali ya mibu mitano, akutami na bokono ya Ebola na Ouganda, eyebisi OMS, mabongisi ya molongo mpo na bokolongono.
Kalaka mokonzi ya mibale na MLC, Fidèle Babala, alobi ete FCC elongali ba députés ya opposition mpo na kobongisa nzela ya bongola Mobeko Likonzi mpe lolenge ya kopona mokonzi mboka. Ayanoli na mituna ya VOA Lingala.
Police ebeti gaz lacrymogène mpo na kopanza baye ya lingomba UDPS baye bakangi nzela ya bokoti na Parlement banda ntongo. Kasi balandi ya UDPS batiki mobulu te.
Equipe ya France ya basi elakisi bokasi na yango na match ya liboso ya Coupe du monde 2019 ezali kobetama na France. Elongi 4-0 liboso ya basi ya Corée du Nord.
**Ilunga Ilunkamba alobi ete masolo mpo na kosala gouvernement mazali kokoba **Herman Cohen alobi Kabila atika Tshisekedi asala mosala **Union africaine esengi bakonzi ya Congo-Brazzaville bakela na lombango Haute Autorité ya kombundisa kanyaka **Na Beni, matanga ya mikolo misato ya bawei ya bit
Herman Cohen, sous-secrétaire ya kala ya Amerika mpo etali mambi ya Afrika, ayanoli na mituna ya VOA Lingala likolo na politiki ya Ekolo Congo démocratique. Alobeli mpo etali misala ya mokonzi ya kala Joseph kabila, ya Felix Tshisekedi mpe boslo ya maponami. Toyoka ye.
Sonangol (Compagnie nationale ya petelolo) asali boyokani na Untied Shine mpo na kotonga raffinerie to mpe izini ya kosokola petelolo eye epetwami naino te na Nord ya Cabinda, elobi bakonzi ya Angola na liyebisi.
FMI (Fonds monétaire international) ebimisi mpo na mbala ya yambo banda mibu mitano, rapport mpo etabli nkita ya Congo démocratique. Ebimisi rapport eye ntango masolo mazali kokoba na bakonzi ya RDC mpo na bozongi na misala mya molongo miye o’mboka mokambami na Felix Tshisekedi.
*37 bana ya Congo démocratique mpe Congo-Brazzaville bakangami na Etats-Unis nsima na kokota na bokuntu *67% ya ba Congolais bandimi bokonzi ya Tshisekedi, 47% nde balobi bilembo ya maponami bilakisaki bosolo te, kolanda GEC *Ba ADF babundisi lisusu ba FARDC na Beni *Ministre ya santé asengi kimia m
-Biyano ya ndenge na ndenge nsima ya botiyami ya Kyungu bo’ mokonzi ya Conseil d’administration ya SNCC mpe Yuma, ya Gécamines. NOGEC elobi ezali komema miiko ya Félix Tshisekedi na Conseil d’Etat. -Avocat ya Mike Mukebayi ayanoli nsima etumbu ya Assemblée provinciale ya Kinshasa –Ba ADF babomi bato
Voir plus