Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FMI elobi nkita ekiti moke na RDC


Mokambi ya FMI (Fonds monétaire international), Christine Lagarde, na président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na Washington, le 9 avril 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)
Mokambi ya FMI (Fonds monétaire international), Christine Lagarde, na président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na Washington, le 9 avril 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)

FMI (Fonds monétaire international) ebimisi mpo na mbala ya yambo banda mibu mitano, rapport mpo etabli nkita ya Congo démocratique. Ebimisi rapport eye ntango masolo mazali kokoba na bakonzi ya RDC mpo na bozongi na misala mya molongo miye o’mboka mokambami na Felix Tshisekedi.

"Bokolisami ya nkita ya 2018 bozalaki 5,8%, bowutaki mingi mpenza ba mines (makele) biye bizalaki na bokoli ya 7% ntango misala misusu (ya ba mines te) mizalaki na 1,7%," elimboli Philippe Egoumé, représentant ya FMI na RDC.

Limpinga lyoko ya FMI liwuti kosala mobembo na Kinshasa, sanza mibale nsima na bokutani ya mokonzi ya sika ya Congo, Félix Tshisekedi, na mokambi ya FMI, Christine Lagarde.

Misala ya mines nde mizali 25% ya nkita ya Congo, ekundoli M. Egoumé. "Bana ya Congo mingi bamona mbuma ya bokoli bona te," elobi Egoumé.

FMI ekanisi ete nkita ekoki kokita na 2019, ekoma na 4,3% pamba te misala ya mines mikomata te.

Bakonzi ya Congo démocratique bakoki kosenga masolo masusu na FMI nsima na bondimami ya rapport ya nkita na yango na Conseil ya administration ya FMI na suka ya sanza ya mwambe.

XS
SM
MD
LG