RDC

Tshisekedi akomi na Nairobi mpo na bokutani ya ACP

Président Félix Tshisekedi akomi na Nairobi, na Kenya epayi wapi akozala na bokutani ya libwa ya bakambi ya bikolo ACP (Afrique Caraïbes Pacifique), 9 décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomi na Nairobi, na Kenya epayi wapi akozala na bokutani ya libwa ya bakambi ya bikolo ACP (Afrique Caraïbes Pacifique). Likita liye likombanda le 9 kino le 10 ya sanza ya zomi na mibale, eye.

Mama na likambo na likita mazali "ACP moko eye ebongwana emitiya na nzela ya multilatéralisme".

Félix Tshisekedi akozwa maloba nsima na nzanga, kolanda limpati lipesami na mokokani mwa ye Uhuru Kenyatta ya Kenya.

ACP ekelama na 1975 mpe Félix Tshisekedi azali mokonzi ya yambo ya RDC kozala na bokutani ya lisanga yango.

Mokonzi ekolo Congo démocratique awutaki na Kigali, na Rwanda epayi wapi akomaki lobi mokolo mwa eyenga.

Azwaki maloba na bokutani ya masolo mabengami Kusi Ideas Festival.

Kuna Président Félix Tshisekedi alobaki ete emoniseli na ye etongami likolo na moto. Yango nde ntina azali kosala makasi mpo été démocratie ekola, yango mpe ntina atiye kelasi ya nse ofele mpe azali kosala makasi mpo été bokolongono mpe bokoma ofele, esakolaki Félix Tshisekedi.