"Yambo na kotika Congo, président ya Conseil libyen, Mohammed El-Menfi, alendisamaki na mokonzi ya mboka ya Congo mpo etali botindami ya limpinga lya koluka koyeba malamu maye mazali koleka kuna mpe bobengisami mikolo mikoya ya likita ya bakonzi ba likolo," ekomi na Twitter mokambi ya ndako ya mosala ya président Sassou, Oko Valentin.
#Congo. #Congo. Avant de quitter le Congo, le président du conseil libyen, Mohamed EL-MENFI, a été édifié par le chef de l’Etat congolais de l’envoi d’une mission d’information en Libye ainsi que de la convocation, dans les jours à venir, d’une réunion du Comité de Haut Niveau. pic.twitter.com/wn9j2y2cLk
— Oko Valentin (@DirPressePdt) July 27, 2021
Mohammed El-Menfi akomaki na Brazzaville lundi mpe abandaki masolo na M. Sassou.
Union africaine epesa M. Sassou mpifo ya kokamba masolo ma Comité ya Haut niveau.
Libye ekota na mobulu wuto botomboki bosalama mpo na kokweyisa colonel Mohammed Kadhafi oyo batomboki babomaki le 20 ocotbre 2011.
Mboka ekambaka wuto ntango wana na mbulamatari mibale mpe bitumba bokobaka.
Conseil président ekambaka ngambo moko mpe maréchal Khalifa Haftar akambaka ngambo esusu.