RDC

Néhémie Mwilanya ayanoli na mituna nsima na bokutani ya FCC na Kingakati

Your browser doesn’t support HTML5

Nsima na bokutani na bango na Kingakati nzinga nzinga na mokonzi ya kala ya mboka mpe mokambi na bango, Joseph Kabila, bayi FCC (Front commun pour la rébulique) bazali kotala ndenge nini bakobongola lingomba na bango. Batalaki mpe nini ebongaki te mpo na kolongisa candidat na bango Emmanuel Ramazani Shadary na maponami malekaki. Balobeli mpe boyokani na bango na CACH ya président Tsisekedi. VOA Lingala epasaki maloba na motambwisi ya lisanga linene liye, Néhémie Mwilanya.