RDC

Motango mwa bato ya coronavirus bokomi sambo na Kinshasa

Your browser doesn’t support HTML5

Motango ya bato bazwi bokono bwa coronavirus mokami na sambo na Kinshasa, engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique. Bato basato basusu bamonani na bokono bwango. Bazali ba Congolais mpe moko na bango awutaki France, ekomi na Twitter ministre ya bokolongo, Dr. Eteni Longondo. Kasi mibale kati na bato samba baye, bazali minganga. VOA Lingala ebengaki mokambi ya misala mya mopeto na ndelo ya ekolo Congo Démocratique, Dr. Dede Ndungi Ndungi.