RDC

Adolphe Muzito na Lamuka basengi Monusco kopekisa bokati ya RDC

Adolphe Muzito, mokambi ya sika ya Lamuka mpo na sanza misato, akutani elongo na baninga baye ya lingomba, na Leila Zerrougui motambwisi ya MONUSCO, na Kinshasa, 9 décembre 2019. (Twitter/Lamuka International Officiel)

Adolphe Muzito, mokambi ya sika ya Lamuka mpo na sanza misato, akutani elongo na baninga baye ya lingomba, na Leila Zerrougui motambwisi ya MONUSCO mpo na koboya lolenge ekolo Congo démocratique ezali kokende na kokatana.

M. Muzito ayebisi nsima ya bokutani na bango ete balingi te lolelnge mboka nzinganzinga ezali kopesa bisaleli mpe misolo na mangomba ya basimba minduki mpo na kozwa bomengo ya ekolo.

Kozwa mbasi na makasi mpe koboma bandeko, basi, bamama ye Congo.

O’ngambo na ye, Leila Zerrougui alobi manso Monusco ezali kosala manso elongo na bakonzi mpe mampinga ya RDC mpo na kosukisa bitumba biye.