Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington elaki kosunga "opération Barkhane" ata Paris esukisi yango


Molobeli ya Pentangoe, John Kirby na Washington, 19 avril 2021.
Molobeli ya Pentangoe, John Kirby na Washington, 19 avril 2021.

Etats-Unis elaki kokoba kosunga bitumba na dongolomeso na Sahel ata France elobi esuki opération Barkhane.

"Totokokoba kopesa maboko na makasi ya baningami ba bison a Afrika, yango elakisi ata bitumba ya kosukisa ba ndongolomeso," elobi molebeli ya ministère ya Bobateli USA to Pentangone, John Kirby, na bokutani na bapanzi sango.

Jeudi, président ya France, Emmanuel macron asakolaki suka na opération to misala Barkane, ekolo na ye esalaka na Sahel mpo na coalition na nkombo ya boyokani ya molongo.

"Tokokoba kosunga ma lolenge ya lisungi tozalaki kopesa na bayi France kolanda bosenga ya etuka," elobi molobeli ya Pentagone.

France elengi ezonga mwa nsima bo’ ekolo ekotambola elongo mpe ekosunga na sango, mpepo, drones mpe biloko misusu.

Na mibu mwambe, basoda 5.100 ba France batiamaki na etuka ya Sahel eye etango na yango ebanda ma Sénégal, eleka, na Mauritanie, Mali, Burkina Faso, Algérie, Niger, Nigeria, Cameroun kino na Centrafrique.

XS
SM
MD
LG