Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Visa d’entrée ekobanda kopesamela ba Congolais d’origine na frontières


Passeport ya RDC. (VOA/Eddy Isango)
Passeport ya RDC. (VOA/Eddy Isango)

DGM (Direction générale ya migrations) epesi nzela na ba Congolais d’origine kozwa visa na poste ya frontière. Bolayi ya visa yango ekozala sanza moko.

"Mopaya nyonso d’origine congolaise oyo azali na passport valide apesameli ndingisa ya kozwa visa ya bokoti na ba postes-frontières mpe frontaliers, " eyebisi DGM na mokanda esignamaki le 16 février 2019.

Constitution ya RDC epekisi ba Congolais kozala na banationalité mibale.

"Nationalité congolaise d’origine ekoki kolakisama na nkombo ya bokoto (patronyme) liye lizali na patrimoine culturel congolais, na bolakisi ya acte de naissance, na bolakisi ya passeport ya kala to pièce d’identité congolaise ya kala to document mosusu endimami," elobi DGM.

Motango ya bana ya RDC bavandi na libanda mozali pene na 16 millions. Bana ya RDC bavotaki te. CENI elobaki ezali na makoki ya kosala maponami te mpo na bango.

Na campagne na ye, mokonzi Félix Tshsiekedi alobaki akosala oyo esengeli mpo na kobongola mobeko liye mopekisaka bana ya Congo kozala na nationalité mibale.

XS
SM
MD
LG