Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato ya Beni batamboli mpo na kosenga kimya


Bato batamboli na Butembo mpo na kosenga maponami, Beni, Nord-Kivu, 17 décembre 2018.
Bato batamboli na Butembo mpo na kosenga maponami, Beni, Nord-Kivu, 17 décembre 2018.

Bavandi ya Beni batamboli jeudi mpo na kosenga kimya na engumba na bango nsima ba bobomi na bato bayike epayi na baye basimba bibundeli.

Bato batambolaki bamemaki basapato ya baye babomamaki na suka ya mposo moleki na quartier Rwangoma mpe tikaki yango liboso ya Mairie.

"Tolingi Maire (Mondele mpako) apesa biso kaka motango ya bato bakufi te kasi bankombo na bango. Mingi mpenza tolingi ete ba attaques maye masila", eyebisi na VOA Lingala Claris Kahingo.

Pene na bato 10 bakufaki vendredi na attaque ya baye basimba minduki na Rwangoma. Bato bayike bamemaki na bato basimba minduki baye basalaki bitumba liye.

Mapinga ya FARDC balobaki ete babomaki ba batomboki 10 ya ba ADF ya Ouganda baye basalaki bitumba liye mpe bakangolaki bato 7 baye bakangamaki.

"Tozali kosenga na président ya sika Félix Tshsiekedi aya na camp militaire Kokolo mpe bavanda awa lokola elakamaki ntango ya campagne électorale mpo na kosilisa kobomana oyo tosi tolembi," elobi ngambo na ye Goilre Kakule.

Bavandi ya Beni balobi bakokoba kotambola kino eyano ekozwama mpo na kimya.

Bato ya Beni bakufi mingi banda aout 2014 epayi na basimba bibumdeli.

XS
SM
MD
LG