Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu asengi bana ya Butembo bakoba na bitumba ya bosolo ya maponami


Martin Fayulu liboso ya bituluku ya bato na Butembo, Beni, Nord-Kivu, 15 février 2019. (Facebook/ Michel Koyakpa)
Martin Fayulu liboso ya bituluku ya bato na Butembo, Beni, Nord-Kivu, 15 février 2019. (Facebook/ Michel Koyakpa)

Martin Fayulu, candidat oyo Cour constitutionnelle esakolaki ete akweyaki na maponami ya présidentielle, asengi bana ya Butembo, na meeting asali kuna, bapesa maboko na bitumba na ye mpo na bosolo ya maponami.

Bituluku ya bato bayambaki oyo ba bengal “soda ya peuple” na libanda ya pepo kino na esika ya meeting na stade ya Institut technique agricole et vétérinaire.

Mokambi ya lingomba Lamuka, M. Fayulu atondaki bana ya Butembo mpe asengaki bango kokoba na bitumba ya bosolo ya maponami, kolanda correspondant ya VOA Lingala na Beni.

M. Fayulu atambolaki likolo na mpunda mpe akobaki na motuka.

Mpo na M. Fayulu, bana ya Butembo esengeli bakende mingi na maponami ya législatif local mpe national ya le 31 mars 2019.

M. Fayulu afundaki CENI mpe mokonzi oyo abimi na bokonzi, Joseph Kabila, ete basalaki nyonso mpo ete maponami masalama te na Beni, Butembo mpe Yumbi moi été bazuwa nzela ya koloba ete alongaki te.

Maponami masalemaki te na Beni, Butembo mp Yumbi le 30 décembre 2018 mpo na bozangi ya bokengi mpe bokono ya Ebola.

Martin Fayulu akokita na Beni samedi, nsima akokende na Ituri, mpe na Goma. Lundi, akozala na Kikwit.

XS
SM
MD
LG