Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi asengi ete masolo ekende mbangu mpo ba kofungola Maison Schegen


Président Félix Tshisekedi azali koloba liboso ya corps diplomatique ezwami na RDC, citéde l'UA, Kinshasa, RDC, 15 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali koloba liboso ya corps diplomatique ezwami na RDC, citéde l'UA, Kinshasa, RDC, 15 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ayebisi ete apesi mitindo mpo ete gouvernement ya RDC esilisa na lombango masolo mpo na kofungola Maison Schengen.

Alobi yango na bokutani ya ko bopesani ya ba vœux na corps diplomatique ezwami na RDC.

M. Tshisekedi asololaki likambo yango mpe na Haut-représentante ya Union européenne Federica Mogherini na 32e session ordinaire ya Union africaine na Addis-Abeba, mposo moleki.

Gouvernement ya président ya kala, Joseph Kabila, ekangaki Maison Schengen mobu moleki, lokola bozongisi ya etumbu UE epesaki na boko ya bakonzi ya RDC mpo na kotiya likama na démocratie yambo ya maponami ya le 31 decembre 2018.

XS
SM
MD
LG