Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakangami ya ba ADF basikolami na ba FARDC na Mamove


Soda ya FARDC azali kokengela ba ADF (Forces Démocratiques Alliées) na Opira, Nord Kivu, 25 janvier 2018.
Soda ya FARDC azali kokengela ba ADF (Forces Démocratiques Alliées) na Opira, Nord Kivu, 25 janvier 2018.

Mampinga ya FARDC ba sikoli (libérer) bato baye batomboki ya ADF ya Ouganda bakangi Mamove, na Beni, na Nord-Kivu.

Ba ADF zomi bakufaki mardi na bintumba ba FARDC basalaki mpo na kobengana bango na Momove.

"Bisika ba ADF bakotaki bamemaki bandeko na biso, kasi tobimisi bango. Bazalaki sambo, mwasi moko," elobi na VOA Lingala molobeli ya mapinga major Mak Hazukay.

Mapinga ya FARDC ezali kosenga na bavandi na Mamove bakende na zamba te mpo kobengana ba ADF esili naino te.

"Ba ADF bakufi ebele, tomemi bibembe na bango minei. Bibwele nyionso bayibaki tozuwi yango mpe tozongiseli bakolona na yango. Mino nyonso bazuwaki na kati ya lopitalo, tozongisa yango. Tokamati mpe bibundeli na bango: PKM moko, AK 47 minei, ba roquettes mpe biloko ebele maye to botoli na bamaboko ya banguna, " ebakisi major Hazukay.

XS
SM
MD
LG