Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Sassou asengi lisungi mpo na Fonds bleu ya bassain ya Congo na COP 25


Président Denis Sassou N'Guesso (G) elongo na ministre wa yambo ya Espagne Pedro Sanchez na bokutani ya COP 25, na Madrid, 2 décembre 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso (G) elongo na ministre wa yambo ya Espagne Pedro Sanchez na bokutani ya COP 25, na Madrid, 2 décembre 2019.

Président Dennis Sassou N’Guesso ya ekolo Congo-Brazzaville asengi lisungi ya molongo mpo na Fonds Blue ya Bassin ya Congo, na bokutani  ya COP 25 na Madrid epayi azwaki maloba le 2 décembre 2019

Dennis Sassou N’Guesso azali kuna lokola momemi ya maloba ya bikolo ya etuka eye ya Afrika ya kati.

"Bokutaki ya COP 25 esengeli bozala kaka te esika ya maloba pamba kasi ya komikotisa o’misala mpo na kobikisa mokili na mbongwana ya bokati zamba," elobi M. Sassou.

Fonds Blue ekelama mpo kobatela mokili na mbongwana mozali kosalama mpo na bokati nzamba.

M. Sassou akundoli ete bikolo 16 bizali kati na Fonds bleu eye.

"Fonds bleus ezali na bosenga ya lisungi public mpe privé. Nazali kobwaka mbela lelo, kolanda boyokani ya Paris," ebeti sete M. Sassou.

M. Sassou ayebisi mokili ete ntango zamba ya Amazonie ezali kobeba, esengeli makasi esalama mpo kobatela poumon ya mibale ya mokili eye ezali nzamba ya bassin ya Congo na bonene 220 milliards ha.

XS
SM
MD
LG