Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou afungoli usine ya kobongola cuivre na Bouenza


Président Denis Sassou N'Guesso akati ruban mpo na kofungola misala ya kobongola cuivre na Soremi na M’Fouati, na département ya Mboueza, Congo-Brazzaville, 26 novembre 2019. (Twitter/Sassou Actus)
Président Denis Sassou N'Guesso akati ruban mpo na kofungola misala ya kobongola cuivre na Soremi na M’Fouati, na département ya Mboueza, Congo-Brazzaville, 26 novembre 2019. (Twitter/Sassou Actus)

Misala ya kobongola cuivre (motako) mikobanda na M’Fouati, na département ya Mboueza, nsima na président Denis Sassou N’Guesso kofongola misala myango na Soremi (Société de recherche et d’exploitation minières) o’mokolo ya mibale.

Motango ya misolo mikoti na botongi ya usine ya kobongola motako na Soremi mizali pene na milliards mitano ya ba CFA.

Kino yambo na misala miye, Soremi ezali kobimisa koleka 15.000 tonnes ya cuivre na mobu moko.

Makele to minerais yango ezalaki kotindama na mboka ya bapaya na nzela ya libongo ya Pointe-Noire.

XS
SM
MD
LG