Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou akeyi na bokutani ya CEMAC na Yaoundé


Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala ya mokonzi ya France, Palais de l'Elysée, Paris, 3 septembre 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala ya mokonzi ya France, Palais de l'Elysée, Paris, 3 septembre 2019.

Président ya Congo-Brazzaville, Denis Sassou N’Guesso alongwe Brazzaville mpo na kokende Yaoundé na Cameroun epayi wapi akozala na kokutani ya CEMAC (Communauté économique et monétaire de l’Afrique centrale).

Bokutani bwango bokosalama wuto le 21 kino le 22 novembre na engumba mokonzi ya Cameroun.

Masolo makozala na Palais de l’Unité.

Misolo ya lingomba eye, bokengi to bitumba na badongola miso ya Boko Haram mpe bosombitinya ya bato mpe ya biloko na bonsomi kati mboka ezali na CEMAC nde maye makosololama.

XS
SM
MD
LG