Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou N’Guesso alobi esengeli kolonga bitumba na bozangi bileyi malamu


Président Denis Sassou N'Guesso na lisikulu na ye na bofungwami ya Forum ya bokengi ya bileyi ya Afrika ya kati, na Brazzaville, Congo, 19 novembre 2019. (Twitter/Thierry Moungalla)
Président Denis Sassou N'Guesso na lisikulu na ye na bofungwami ya Forum ya bokengi ya bileyi ya Afrika ya kati, na Brazzaville, Congo, 19 novembre 2019. (Twitter/Thierry Moungalla)

Président Denis Sassou N’Guesso alobi makasi masengeli masalama mpo na bato bazala na bileyi malamu. Asalaki liskulu na bofungwami ya bokutani ya bakeli mibeko ya Afrika ya kati botali bokengi ya bileyi na Brazzaville.

"Esengeli na biso mpenza kolonga bitumba ya bozangi bileyi ya malamu," ebeti mokoloto M. Sassou N’Guesso na maloba maye.

Kolonda FAO, ntina ya bokutani boye bozali kokela boyokani kati na bakeli mibeko ya etuka ya Afrika ya kati mpo etali bokengi ya bileyi ya bato bavandaka na bisiki biye.

Yango ezali kati na mbano enene ya FOA ya kosilisa nzala na mokili na 2030.

Balakisi bilongi ya bikolo ya CEEAC (Communauté économique des états d'Afrique centrale) mpe ya CEMAC (Communauté économique et monétaire de l'Afrique centrale) bazali wana. Lokola mpe baye ya Madagascar, Chili, Fraoncophonie mpe basusu.

XS
SM
MD
LG