Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tunisie na Angola bakaboli 1-1


Esengo ya basani ya ba Palancas Negras nsima na kotiya mongete na match contre ba Aigles ya Carthage na phase finale ya CAN 2019, na Suez, Egytpe, le 24 juin 2019.
Esengo ya basani ya ba Palancas Negras nsima na kotiya mongete na match contre ba Aigles ya Carthage na phase finale ya CAN 2019, na Suez, Egytpe, le 24 juin 2019.

Ba Palancas Negras ya Angola bakabolani 1-1 na ba Aigles ya Cathage ya Tunisie na match na bango ya yambo ya groupe E, na phase finale ya Coupe d’Afrique des Nations, na Suez, na Egypte.

Ba Mpongo to Aigles ya Carthage bazalaki bato ya yambo yakofongola mongete na penalty na 34’.

Youssef Msakni, mosani ya Eupen, atikelaki moyambi ya Angola chance te.

Kasi Angola elamukaki na 2e mi-temps mpe etambwisaki lisano.

Na 73’, yango efutaki. Djalma Campos ya Alanyaspor, atumba moniama na mongete moko mpo na Angola.

Match esiliki na score eye.

XS
SM
MD
LG