Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alaki kotiya alima na misala ya Energie mpo na kobenda ba investisseurs


Félix Tshiksedi (C) mokambi ya RDC, kati na bakokani wa ye João Lourenço (D) ya Angola Azali Assoumani na bokutani ya SADC na Dar es Salaam, Tanzanie, 17 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Félix Tshiksedi (C) mokambi ya RDC, kati na bakokani wa ye João Lourenço (D) ya Angola Azali Assoumani na bokutani ya SADC na Dar es Salaam, Tanzanie, 17 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi alaki kotiya alima na misala ya Ernegie na ntina ya kobenda ba investisseurs (baye batiyaka mosolo mpo na kokekala misala).

"Na alima oyo tolingi totiya na misala miye ya mbano (énergie to moto), nandimi ete bato ya mombongo ya kati na mobka na biso mpe ya bapaya bakozwa libaku ya kotiya misolo na makambo oyo," elobi M. Tshisekedi na Forum su Energie na Congo démocratique oyo ebandi o’mokolo ya mibale na Matadi na Kongo-central.

Mama na likambo ya bokutani yango mazali "bosaleli to gestion mpe mbano ya lotiliki likolo na ba industries mpo ya ntombwa ekowumela na Congo démocratique".

Félix Tshisekedi akundoli ete asengaki ete lotiliki lozala na esika ya yambo kati na makambo ya lintomba na nkita, na linaka na ye ya mibu mitano.

Ayebisi ete mokano yango mozali mpo na bobangi ete, lokola bato bazali kokoma mingi na mboka mpe bazali kosalela mingi nzete mpo na moto, zamba ya RDC ekoki kozala na likama na 2100.

Félix Tshisekedi nde akeyi kotala esika ya barrage Inga nsima ya bokutani boye.

XS
SM
MD
LG