Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lisikulu ya Tshisekedi na ya Sassou na 33e Sommet ya UA


Président Félix Tshisekedi azali kosala lisikuli na ye na 33e Sommet ya Union africaine na Addis Abeba, Ethiopie, 10 février 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosala lisikuli na ye na 33e Sommet ya Union africaine na Addis Abeba, Ethiopie, 10 février 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ya RDC alobeli kimya na Afrika mpe mokokani waye ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso abeti sete mpo na Libye na lisikuli moko na moko asalaki na 33e sommet ya Union africaine, na Addis Abeba, na Ethiopie.

"Kosilisa makelele ya minduki ekopesa nzela ya kobongisa malamu misalsa ya boyokani na bikolo ya bapaya mpe ya nkita na ntina ya kolonga mondenge ya bokolisi misolo, ya ntombwa mpe ya intégration régionale mpe ya kofulikisa," elobi na lisikuli na ye M. Tshisekedi.

Na ngambo na ye, président Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville alobelaki mabongisi mpo na kosala Forum inter libyen to masolo ya bana ya Libye.

Sassou N’Guesso oyo azali mobondi ya matata na mboka ya nkondo Mouhammar Khadafi asengi, na 33e sommet ya Union africaine, ete "masolo ya Libye mazala mpenza mpo na bana banso" ya ekolo ekolo eye.

Na masolo ya 33e Sommet ya Union africaine, mwana mboka Félix Tshisekedi andimisami lokola vice-président ya Union africaine.

Eselengeli Félix Tshisekedi alongwa Addis Abeba mpo na kozanga Kinshasa mardi 10 février 2020, kolanda misala ya présidence ya république.

XS
SM
MD
LG