Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba professeurs baboyi kozongela kotangasi na Unikin


Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)
Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)

Ba professeurs bazalaki te na Université ya Kinshasa epayi wapi kelasi esengelaki kozonga lundi 24 février 2020 nsima na sanza moko na ndambo ya botelemisami mpo na bomulu.

Ba étudiants (bayekoli) bazalaki mwa mingi na campus ya Unikin kasi bakokaki te kolanda mateya.

Bakambi ya Unikin bakutanaki na mopesi toli ya président Félix Tshisekedi mpe mokambi ya misala ya mbongwana ya bizaleli, Jacques Kangudia oyo akitaki kuna.

"Biso, tozali na kati kati, ntango tozali koluka kosepelisa ba yekoli, esengli totala ndenge nini ba professeurs mpe bakoki kozala malamu," elobi secrétaire général académique ya Unikin Eustache Banza Nsomwe oyo akutanaki na M. Kangudia.

Kelasi ekatamaki le 7 Janvier na Unikin, nsima na mobulu ba étudiants basalaki mpo na koboya bomatisi mosolo basengeli kofuta.

Biloko biyike bibebisamaki mpe policier moko akufaki.

XS
SM
MD
LG