Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Nkurunziza basololi na Bujumbura mpo na bokengi


Présidence Félix Tshisekedi ya RDC na mokokani wa ye ya Burundi Pierre Nkurunziza na bokutani na Bujumbura, le 14 juin 2019. (Facebook RDC)
Présidence Félix Tshisekedi ya RDC na mokokani wa ye ya Burundi Pierre Nkurunziza na bokutani na Bujumbura, le 14 juin 2019. (Facebook RDC)

Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye Burundi, Pierre Nkurunziza basololi na Rohero, na Bujumbura mpo etali bokengi kati mboka mibale.

Mobembo ya mwana mboka Tshisekedi na Bujumbura ezalaki kaka ya ngonga mibale, nsima na bowuti na ye na Tanzanie esika wapi azalaki mikolo mibale mpo na masolo na Jphn Magufuli, mokonzi ya mboka Tanzanie.

M. Tshisekedi na M. Nkurunziza basololi mpo etali bokolisi bondeko mpe boyokani kati na bikolo mibale, eyebisi présidence ya Congo démocratique.

Mpo etali bokengi, Kinshasa na Bujumbura balobi ete bakosala makasi mpo na kosilisa likambo ya ba "forces négatives" (basimba minduki) baye bamonani mingi na ndelo ya Ruzizi kati mboka eye mibale, elimboli baye ya présidence ya RDC.

Bakonzi babale balobaki mpe oyo etali bolamu ya bikolo mibale, ya région mpe ya molongo.

XS
SM
MD
LG