Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Etats-Unis na RDC balingi bakolisa boyokani ya mampinga


Président Félix Tshisekedi na bokutani na Général de brigade Steven deMilliano ya mampinga ya Etats-Unis, na cité ya Union africaine, Kinshasa, 18 juin 2019. (Facebook/présidence de la RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na Général de brigade Steven deMilliano ya mampinga ya Etats-Unis, na cité ya Union africaine, Kinshasa, 18 juin 2019. (Facebook/présidence de la RDC)

Président Félix Tshisekedi nde akutanaki na Général de brigade Steven deMilliano ya mampinga ya Etats-Unis mpo na masolo matali mampinga, mardi na cité ya Union africaine na Kinshasa.

Na mokambi moye ya centre AFRICOM, Félix Tshisekedi atalaki ndenge nini Etats-Unis na Congo démocratique bakobongisa malamu boyokani kati na mampinga ya bikolo mibale, eyebisi Ambassadeur ya Ameriki Mike Hummer.

Kolanda maloba ya ambassadeur Hummer, ezali na bolandi ya partenariat priviligié to boyokani ya litomba mpo na kimya mpe bokengi, boye bosalamaki na mobembo ya Félix Tshisekedi na Ameriki na avril.

Gén. de Brig. deMilliano azali elongo na bakambi misusu ya mampinga ya Aeriki elongo na Sous-secrètaire d’Etat adjoint ya Ameriki ya mambi ya makoki ya bomoto, démocratie mpe mosala, Scott Busby.

XS
SM
MD
LG