Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bahati akebisi kofunda FCC na bazuzi soki bazuwi baye ya AFDC-A


Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)
Joseph Kabila, mokambi ya FCC (D), Modeste Bahati Lukwebo ya AFDC-A (na mpoanzi na ye), na bato basusu na bokutani ya lingambo na bango na Kingakati, Kinshasa, 2019. (Facebook/Junior King-Jr)

Modeste Bahati, mokambi ya lisanga AFDC-A (Alliance des forces démocratiques et alliées), akebisi lingomba FCC (Front commun pour le Congo) mpo na koluka kozuwa na makasi baye ya lisanga na ye.

Alobi liboso ya bapanzi sango na Kinshasa, ete akofunda na bazuzi.

"Nakofunda na bazuzi baye bakoluka kozuwa bato ya masanga misusu na kotambola likolo ya mokanda ya boyokani (charte) ya FCC, " ekebisi M. Bahati na kotala mbela ya FCC eye epesaki mposo moko na baye ya AFDC-A na kopona bisika bakokende.

"Tosengi na ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs na biso, ba députés, ba sénateurs mpe baye ya bureaux ya ba assemblées provinciales ya biso batelemela bokonzi ya makasi mpe bobangisi bato," ebeti mokoloto M. Bahati.

"Eloko moko te ekoyela bango ntango bapesi malako bazangi mpifo mpe makasi ya bosembo, " esakoli M. Bahati.

Nzokande, ngambo ya bato basusu ya AFDC-A, basakolaki na bokutani mosusu na bapanzi sango ete M. Bahati alongwe na nzela mpe azali lisusu te na lingomba na bango. Bango baponi députée Néné Ilunga mpo azala motambwisi mpe molakisi ya elongi ya AFDC-A.

Lobi loleki, bokutani ya mbakambi ya masanga ya FCC bosakoli ete balongoli mpo na libele Bahati na lingomba ekambami na Joseph Kabila.

Nzokande matata maye mabandaki mpo M. Modeste atiki candidature na ye mpo na ebonga ya kokamba Sénat ntango Joseph Kabila, mokambi ya FCC, aponi Alexis Thambwe mwamba mpo na yango.

XS
SM
MD
LG