Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bahati avandisami pembeni na FCC


Bahati Lukwebo, mokambi ya lingomba AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et alliés), Kinshasa, 5 décembre 2018. (Facebook/Bahati Lukwebo).
Bahati Lukwebo, mokambi ya lingomba AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et alliés), Kinshasa, 5 décembre 2018. (Facebook/Bahati Lukwebo).

FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila evandisi Modeste Bahati Lukwebo, esakoli molebeli ya lingomba liye, Jean-Lucien Busa.

Mokano ya FCC esakolami nsima ya bokutani ya bakambi ya masanga maye mazali kati lingomba liye, likambamaki na motambwisi ya misala (ya FCC), Néhémie Mwilanya na Rotana Hôtel na Kinshasa.

Baye ya FCC bapemeli MBahati mpoe na kopesa nkombo na ye ntango mokambi ya lingomba na bango, Joseph Kabila, asili aponi Alexis Thambwe Mwamba mpo na kozala candidat mpo ebonga ya kotambwisa Sénat.

Kolanda liyebisi M. Busa atangi, AFDC-A (Alliance des Forces Démocratiques du Congo) ya M. Bahati esengeli epona mokambi mosusu moye mokoki kobanda kosola na FCC.

Bayike ka na AFDC-A basalaki liyebisi mikolo mileki mpo na koloba ete bakopesa bango mpe lokola maboko na M. Thambwe Mwamba.

Kasi M. Bahati, ye, atikaki candidature na ye mpe alobaki tozali na démocratie mpe (candidature) na ye ekoki kosunga FCC soki bato boboyi kopona M. Thambwe Mwamba.

XS
SM
MD
LG