Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sous-secrétaire d’Etat américain apesi 18.000 tonnes ya lisali mpo na Ebola


Sous-secrétaire d’Etat américain ya mambi ya Afrika, Tibor Peter Nagy Jr., na katikati ya bato, ntango ya bopesi lisali mpo na kobundisa Ebola na Goma. Nord-Kivu, le 13 mars 2019. (Facebook/L'Ambassade des Etats Unis, Kinshasa)
Sous-secrétaire d’Etat américain ya mambi ya Afrika, Tibor Peter Nagy Jr., na katikati ya bato, ntango ya bopesi lisali mpo na kobundisa Ebola na Goma. Nord-Kivu, le 13 mars 2019. (Facebook/L'Ambassade des Etats Unis, Kinshasa)

Sous-secrétaire d’Etat américain ya mambi ya Afrika, Tibor Peter Nagy Jr. akomi na mboka Goma, na Est to monyele ya RDC esika wapi apesi na misala ya kobundisa Ebola koleka 1.800 tonnes ya bileyi mpe ya bisaleli mpo kobundisa bokono liye.

M. Tibor Nagy asali mobembo elongo na ambassadeur ya mboka Amerika, Mike Hammer.

M. Tibor Nagy alobi ete mpo na kobikisa bokono ya Ebola esengeli kobakisa likolo na mino, biloko lokola bileyi ya malamu, mayi, na securité.

Bapesi 1.800 tonnes ya bileyi mpo na kosunga bakoni ya Ebola. Kati na yango, Masangu, loso na mafuta.

Na biloko yakoliya wana, USAID, agence ya gouvernement ya Amerika ebakisi mpe bisaleli ya kobatela moto na moto mpo na bitumba na bokono ya Ebola. Ezali biloko lokola ba gangs, ba masques, ba botinnes ya plastique mpo na kobatela ya ba equipes ya ba personnel oyo bazali kopesa lisalisi na babeli ya Ebola kuna na mboka Beni mpe Butembo.

Bakonzi ya PAM (Programme alimentaire mondial), batondi bana ya Amerika, mpe balobi na lombangu ete biloko nyonso maye makokomela baye basengeli na yango.

XS
SM
MD
LG