Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington elingi kosala partenariat ya makasi na gouvernement ya Tshisekedi


Mike Hammer, ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa, RDC, 24 décembre 2018. (Facebook/Henri Mova)
Mike Hammer, ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa, RDC, 24 décembre 2018. (Facebook/Henri Mova)

Ambassadeur ya Etats-Unis alobi ete bakonzi ya Amérika balingi kosala partenariat ya makasi koleka na gouvernement ya RDC. Ezalaki na milulu na esika ambassade ya sika ya mboka na ye ekotongama na Kinshasa.

"Tolingi kosala na président Tshisekedi mpe gouvernement na ye mpo na kotiya na esika partenariat (boyokani) oyo ya makasi koleka," elobi ambassadeur Mike Hammer.

Ntoma ya Amerika akundoli ete mboka na ye na RDC bazalaka na boyakani malamu mpe ya makasi banda lipanda ya RDC na 1960.

M. Hammer azalaki na bolapi ndayi ya Félix Tshisekedi lokola mokonzi ya sika ya RDC. Alobaki na Twitter ete mokolo yango ezalaki "historique" (ekotika lisolo) mpe ayebisaki ete Etats-Unis "ekopesa bana ya Congo maboko mpe ekosala na president Tshisekedi elongo na gouvernement ya sika mpo na avenir paficique mpe ya bofulukisami ya koleka ".

Esika ambassade ya sika ya RDC ekotongama ezalaki esika wapi entrépôt ya CENI (Commision électorale nationale indépendante) ezikaki na décembre moleki. Likolo na yango maponami mapusanaki le 30 décembre 2018.

XS
SM
MD
LG