Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alaki etumbu na baye bazuwaka basi mpe bilenge basi na bowumbu


Président Félix Tshisekedi kati ya basi ya lokumu bayike na Cité ya OUA, à Kinshasa, RDC, le 8 mars 2019. (Twitter/RDC)
Président Félix Tshisekedi kati ya basi ya lokumu bayike na Cité ya OUA, à Kinshasa, RDC, le 8 mars 2019. (Twitter/RDC)

"Ntango ekoki ete bozangi kopesa etumbu esila mpe etumbu ya ndakisa epesama," elaki président Félix Tshesekedi na bokutani na ba mama bayike o’mokolo ya molongo mpo makoki ya basi

M. Tshisekedi alobi akobundisa mabala na bana basi ya mike.

"Nazuwi mokano ya kobundisi libala ya bilenge basi ya mike mpo ete bakende bango nyonso na biteyelo," elobi mokonzi ya sika o’boso ya ba mama 20 bakutanaki na Cité de l’Union africaine.

M. Tshsekedi alobi ata botelemeli mpe bopekisami makozala, "ekosengela mpenza kozuwa miko ya sika mpo na kobongola bizaleli."

"Nakolembisa maboko te mpo kosilisa mbemba liye na bokonzi na ngai," elaki mokonzi ya sika ya mboka RDCi.

Président Tshisekedi andimi ete "basi ebele na monyele (est) ya RDC, banyokolami na mangomba ya basimba mandoki". "Pasi na bino esengeli esila mpe mpinzoli na bino etika kotanga. Ntango ekoki ete bozangi kopesa etumbu esila mpe etumbu ya ndakisa epesama," ebeti mokoloto mokonzi Tshisekedi.

Nzokande na ngambo na ye, Sheila Keetharuth, nganga ya makombo ya basi ya ONU, atatoli ete basi mpe bilenge bazali na bawombo ya babundi ya Kamwina Nsapu Na région ya Kasaï.

XS
SM
MD
LG