Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atindi mission ya kozongisa kimya na Yumbi


Mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi na boktani na Kinshasa, le 22 fevrier 2019. (Facebook/Fatshi News)
Mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi na boktani na Kinshasa, le 22 fevrier 2019. (Facebook/Fatshi News)

Mokonzi Felix Tshisekedi atindi mission mpo na kozongisa kimya na Yumbi, na Mai-Ndombe, esika wapi bato bakufaki pene na 900 -motango espesami na Nations unies- na bitumba kati na Batende na Banunu le 16 tii le 18 décembre moleki.

Mission liye esengeli ebongisa makambo nyonso mpo na bozongi ya pene na 16.000 baye bakimaki bitumba mpe bavandi na Congo-Brazzaville to na bazamba ya Yumbi to mpe lisusu na bisanga mike maye mazwami ngambo mibale ya ebale ya Congo.

Mission yango ekokende na Yumbi mardi 26 février 2019 mpe ekokambama na Vice-Premier ministre ya Intérieur mpe bokengi, kolanda makomi ya Vital Kamerhe, mokambi ya cabinet ya mokonzi ya mboka.

Kati na mission yango, ekozwama mpe na Commissaire général ya police antinationale, Commandant ya 1ere zone militaire, Chef ya Etat-major ya Renseignements militaires, Auditeur général ya FARDC, administrateur général ya ANR mpe directeur ya DGM.

Bato baye bakosunga ba communautés ya Yumbi kovanda na bomoko mpe koyokana.

Mission yango ekotala mpe soki conditions securitaires, humanitaires mpe sanitaires ezali ndenge nini mpo komema eyano esengeli.

XS
SM
MD
LG