Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sindika Dokolo awei, elobi bayi libota


Sindika Dokolo na ba studios ya VOA, Washington, 10 janvier 2020.
Sindika Dokolo na ba studios ya VOA, Washington, 10 janvier 2020.

Sindika Dokolo, molongani ya Isabel dos Santos (mwana ya mokonzi ya kala ya président José Eduardo dos Santos ya Angola) akufi na Dubai na mayi, elobi bayi libota,

"Solo, sango yango ezali," elobi na VOA Lingala Christian Lusakweno mwana ya ndeko ya Sindika Dokolo.

Bakeli mibeko mpe bato baike basusu bapesi sango yango na compte Twitter na bango.

Mwasi na ye, Isabel Santos atie kaka bilili ya libota na Twitter kasi alobi eloko te mpe ayanoli te na maloba ya kobonda ye bato bazali kokoma na nse na ye yango mpo na liwa ya Sindika Dokolo.

Bokilo ya mokonzi ya kala ya Angola, Jose Eduardo dos Santos, Sindika azalaki na mibu tuku minei na mwambe.

Azalaki mobombi ntoki monene mpe mobandi mwa lingomba Congolais Debout. Tata na ye azalaki moyi Congo wa yambo ya kozala na banque na RDC.

XS
SM
MD
LG