Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Banquier portugais azalaki na makambo ya Isabel dos Santos bakuti ye akufi


Isabel dos Santos na Maia, Angola, 5 février 2018.
Isabel dos Santos na Maia, Angola, 5 février 2018.

Banquier portugais oyo alandamaki na bolukiluki ya makambo ya Isabel dos Santos, akutami ya kokufa singa na kingo na Lisbone (Portugal). Police ekanisa ete ekoki kozala ete amibomi.

"Nzoto ya Nuno Ribeiro de Cunha ezwamaki mercredi na mpokwa mpe bilembo binso bimonisi lokola amibomi," elobi na AFP molobeli ya police ya Portugal.

"Emonani lokola amibomi na singa na kingo na garage na ye," ebekisi liyebisi ya police.

Nuno Ribeiro azalaki na mibu 45 mpe azalaki kosala na banque Eurobic. Isabel dos Santos azali actionnaire principale na yango kasi justice angolaise efundaki Isabel dos Santos o’mokolo moko wana ya mercredi mpo na action na ye na banque eye.

Nkombo ya M. Ribeiro etangami na mikanda ya "Luanda Leaks", Consortium international ya ba journalistes ya investigation (ICIJ) oyo ebimisaki ndenge Isabel dos Santos azwaki mosolo ya l’Etat.

Jeudi, procureur général angolais Helder Pitta Gris akomaki na Lisbonne mpe akutanaki na mokokani wa ye ya Portugal.

Misala ya bosembo ya Angola ekangaki ba comptes ya banque Isabel dos Santos na molongani wa ye Sindika Dokolo, mwana ya mokolo banque ya yambo ya kala ya RDC.

Mme Isabel, 46 ans, mwana ya mokonzi ya kala ya Angola Jose Eduardo dos Santos afundami na kozwa mosolo ya l’Etat na ba affaires na Sonangol (Societe nationale ya petrole) mpe Endiam (ya diamant).

XS
SM
MD
LG