Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba démocrates babandi misala mya kokweyisa Trump yambo bokonzi na ye bosila


Président Donald Trump na Vice-président Mike Pence na Maison Blanche, Washington, novembre
Président Donald Trump na Vice-président Mike Pence na Maison Blanche, Washington, novembre

Ba démocrates bakotisi mokonda na ndako ya bokeli mibeko mpo na kosenga vice-président mike Pence na mbulamatari kolongola président Donald Trump na koloba ete akoki te na ebonga ya mokonzi. Ba républicains batelemelaki mpe bapekisaki yango koleka na vote.

Kasi ba démocrates bakotisa article ya impeachment (kolonga mokonzi ya mboka) mpo na eyoma balandi ba M. Trump basalaki mposo moleki na Capitole.

Ba démocrates babengi yango botomboki.

Bazalaki komeka kokweyisa mbulamatari na makasi mpe tozali na mokumba lokola Congrès ya koyanola na yango, elimboli moyi Congrès David Diciline oyo akotisi mokanda yango.

Mosala ya kokweyisa M. Trump ekosenga mikolo mingi kasi etikali kaka mikolo libwa mpo mokonzi abimi na maponami Joe Biden alapa ndayi mpe avandisama na bokonzi.

Kasi, soki mokanda ya kosenga bolongwi ya Trump motindami na House of representatives (ndako ya bokeli mibeko), mokonzi ya mboka esengeli avanidsa sama pemebeni kino mosala yango mokotalama.

Vice-président Mike Pence nde akokakamba mboka ntango wana kino eyano na ya suka ekopesama na bosenga ya bakeli mibeko.

Ba démocrates baleki na motango na Congres nsima na kolonga House of representatives na Sénat.

Le 6 janvier, bitluku bya balandi ya M. Trump bakitaki na Congrès, batindaki ba policiers, babukaki bikuke mpe baninisa mpe basalaki eyoma mpo na kopekisa bondimami bwa bilembo ya elonga ya M. democrats Biden.

Ezalaki nsima na kowuta na lisusu M. trump asalaki pene na Capitole.

Twitter, Facebook mpe YouTube bakangi ba comptes ya M. Trump.

XS
SM
MD
LG