Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

SADC esengi Cour constitutionnelle esala mosala malamu


Président Hage Geingob ya Namibie mpe mokambi ya SADC, (Lisanga ya ntombwa ya ba mboka ya Afrika ya Ngele), na New York, Etats-Unis, 24 septembre 2018.
Président Hage Geingob ya Namibie mpe mokambi ya SADC, (Lisanga ya ntombwa ya ba mboka ya Afrika ya Ngele), na New York, Etats-Unis, 24 septembre 2018.

Bokutani ya bakonzi ya bikolo mpe ya bakangi ya ba gouvernement ya SADC, na Addis Abeba (Ethiopie), esengi na Cour constitutionnelle ya RDC kosala mosala na yango na ndenge esengeli.

SADC (Lisanga ya ntombwa ya ba mboka ya Afrika ya Ngele to ya Sudi) endimi ete bosakoli ya ba résultats ya CENI ememi elikya kasi mpe lisusu bobangi epayi ya ba Congolais ebele ya kotiama pembeni.

Bokutani ya SADC esengi na Cour constitutionnelle kosala mosala na yango na ndenge esengeli mpe na communauté internationale kotosa mobeko likonzi ya mboka Congo.

Na ba naya RDC, bakonzi ya mboka ya SADC basengi kozala na boboto, koyikisa démocratie makasi, kobatale kimya mpe kosilisa boswani nyonso ya maponami na kolonda mobeko likonzi mpe mibeko ya maponami.

Misala maye masalemaki na Addis Abeba, na bokambami ya Président Hage Geingob na Namibie.

Bokutani mosusu ebengisamaki na président Paul Kagame ya Rwanda mpe président en exercice ya Union africaine mpo na kosolola likolo ya makambo ya RDC.

XS
SM
MD
LG