Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba juges ya Cour constitutionnelle bakoti "kinzonzi" mpo na bosengi ya Fayulu


Noel Funga, moko na ba zuzi mitano ya Cour constitutionnelle, azali koloba, na Kinshasa, 15 janvier 2019.
Noel Funga, moko na ba zuzi mitano ya Cour constitutionnelle, azali koloba, na Kinshasa, 15 janvier 2019.

Ba juges ya Cour constitutionnelle bakoti "kinzonzi" na nsima ya koyoka ngambo nyonso ya baye bazalaki na audience ya kotala bosengi ya Martin Fayuku oyo aboyi ba résultats ya CENI ebimisi Félix Tshisekedi molongi ya présidentielle na 38,57%.

Ba juges bayokaki ba avocats ya Fayulu, ya UDPS mpe ya CENI mpe procureur.

Ministère public esengi na ba juges ba boya bosengi ya Martin Fayulu. Procureur alobi Martin Fayulu amemi te ba proces-verbaux maye mazali kolakisa ete alongi na koleka 61% lokola azali koloba.

Procureur alobi lisusu tee Fayulu akoki te kotelema na esika ya lingomba ya Dyanamique ya opposition mpo yango nde epesaki candidature na ye.

Ba avocats ya Martin Fayulu bango basengi na Cour constitutionnelle eboya kondima ba résultats maye masakoli Félix Tshisekedi molongi na 38,5%. Balobi CENI esilisaki kosangisa te bilembo nyonso too ko compiler kasi ewalaki na lobango kobimisa ba résultats.

Mpo na ba avocats ya Fayulu, CENI ebongolaki cirsconscription electorale ya présidentielle na kobukaka mobeko. Mpo ete elongolaki Beni, Butembo mpe Yumbi. Ba avocats baye balobi penepene na 5.800 voix maleki na bosangisi ya ba résultats CENI ebisisaki. Basengi babandela kotanga ba résultats bureau de vote na bureau de vote.

Ba avocats ya CENI na ngambo na bango basengi ete Cour eboya bosengi ya Fayulu mpe endima ba résultats masakolamaki. Balobi ba centres de compilation makoki te kozwa eseki ya plénière ya CENI.

Ba avocats ya UDPS, lingomba ya Felix Tshisekedi, molongi oyo asakolami, bango mpe basengi na Cour constitutionnelle endima te bosengi ya Martin Fayulu.

Ba juges batalaki mpe bosengi ya candidat mosusu ya présidentielle, Théodore Ngoyi, oyo alobi ba annuler ba résultats nyonso.

XS
SM
MD
LG