Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ebola ebomi koleka bato 400


Basali ya bokolongono bazali kosunga mokoni moko na centre de ya traitement ya Ebola ya Médecins sans frontières na Butembo, le 3 novembre 2018.
Basali ya bokolongono bazali kosunga mokoni moko na centre de ya traitement ya Ebola ya Médecins sans frontières na Butembo, le 3 novembre 2018.

Bakonzi ya mambi ya bokolongono bayebisi ete koleka bato 400 basili kowa na épidémie ya Ebola liye lizali kongala na est too na monyele ya RDC.

"Wuta ebandeli ya épidémie liye, motango ezali 658 (ya baye basimbami na bokono liye), kati na bango 609 confirmés mpe 49 oyo bakoki kozala na bokono. Na nyonso, ezali na bato 402 babawei," na bituka ya Nord-Kivu mpe ya Ituri, ekomi ministère ya bokolongono na liyebisi ya mokolo ya mibale.

Bakonzi ya bokolongono balobi bato 237 babikisami, kasi bato 200 bazali kotalama.

Epidémie liye ezali ya monene koleka na RDC. Ebandaki na sanza ya mwambe ya 2018.

Bato 60.460 bazuwi mangwele.

XS
SM
MD
LG