Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington esengi polele emonisama na maponami ya RDC


Président Donld Trump na Washington, 11 janvier 2019.
Président Donld Trump na Washington, 11 janvier 2019.

Bakonzi ya Amerika basengi polele emonisa na maponami ya RDC, ntango mokano ya Cour constitutionnelle ezali kozelama mpo na oyo etali bosengi ya Martin Fayulu ya kobandela kotanga ba bulletins ya maponami.

Etats-Unis "esengi na Cour constitutionnelle kokoba nzela ya mibeko, bosembo mpe pole mpo na kosilisa bobendani na nsima ya maponami," elobi na liyebisi molebeli ya département d'Etat, Robert Palladino.

Martin Fayulu aboyi ba résultats ya CENI maye masakoli Félix Tshisekedi molongi ya présidentielle ya le 30 décembre 2018 na 38,57%.

Washington elobi "eyebi bobangi maye mazali likolo ya pole ya misala ya maponami".

Cour constitutionnelle ekotaki "kinzonzi" mpo bosengi ya Martin Fayulu na nsima ya koyako ba avocats nyonso mpe ministère public. Ekoki kopesa mokano na yango o’mokolo ya minei. Kasi ezali naino na mikolo sambo yambo ngonga eleka.

XS
SM
MD
LG