Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda elobi ebomi 19 "terroristes" na ndelo na RDC


Motuka ya mampinga ya Rwanda pene ya parc ya Virunga, na RDC, 28 septembre 2002.
Motuka ya mampinga ya Rwanda pene ya parc ya Virunga, na RDC, 28 septembre 2002.

Misala ya bokengi ya Rwanda miyebisi ete mibomi ba dongolomiso (terroristes) 19 baye bafundamaki mpo koboma bato na butu ya vendredi na samedi pene pene na ndelo na ekolo Congo démocratique.

"Mampinga ya bokengi balandaki badongolosomiso, babomaki zomi na libwa (19) kati na bango mpe bakangaki mitano," elobi police ya Rwanda na liyebisi.

Police ya Rwanda elobi makambo misusu te mpo etali badongolomeso baye. Nzokande mingi na baye ya mampinga ya Rwanda bayebisika na AFP ete ekoki kozala batomboki bawutaki na RDC.

Moko na baye ya police alobi na kobomba nkombo ete babomaki "badongoloniso" na kolandaka bango nsima na koboma basalaki na ecteur ya Kinigi, na parc Volcans, na Rwanda, pene ya parc Uvira ya RDC. "Bitumba ya kolanda bango bizali kokoba," elobi moye ya police yango.

Baye bakonzi ya Rwanda babengi "badongolomiso" bakotaki na mboka Kinigi na butu ya moloko ya mitano na mposo, babomaki bato na motango kati na mwambe kino zomi na moko, kolanda maloba ya bakonzi ya Rwanda.

"Kati na bawei ezalaki na bavandi ya mboka yango. Badongolomiso bamobomaki na mbeli, machetes mpe bibundeli misusu," eyebisi police.

Rwanda ezali uto mikolo mingi kobangisa basimba minduki mpe ba tomboki banso na yango bazalaka na RDC ete ekosilisa bango.

Bitumba biye bisalami ntango mampinga ya RDC esakolaki le 18 septembre ete mabomaki mokambi ya batomboki ya Rwanda FDLR, Sylvestre Dacumudura oyo alukamaki na CPI (Cour penale internationale) uto 2012.

XS
SM
MD
LG